Nzembo 52:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Kasi ngai nakozala lokola nzete ya olive oyo etondi na nkasa+ na kati ya ndako ya Nzambe,Nazali mpenza kotya motema na motema boboto ya Nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+ Yisaya 65:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete;+ mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.+ Hosea 14:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Mwa milona na ye ekobima, mpe lokumu na ye ekokóma lokola oyo ya nzete ya olive,+ mpe nsolo na ye ekozala lokola oyo ya nzete ya Libá.
8 Kasi ngai nakozala lokola nzete ya olive oyo etondi na nkasa+ na kati ya ndako ya Nzambe,Nazali mpenza kotya motema na motema boboto ya Nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+
22 Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete;+ mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.+
6 Mwa milona na ye ekobima, mpe lokumu na ye ekokóma lokola oyo ya nzete ya olive,+ mpe nsolo na ye ekozala lokola oyo ya nzete ya Libá.