Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe Yehova Nzambe asalaki moto na putulu+ ya mabele+ mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi,+ mpe moto akómaki molimo ya bomoi.+

  • Ebandeli 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango.+ Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.”+

  • Ebandeli 8:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe Yehova abandaki koyoka nsolo moko oyo ekitisaki ye motema,+ bongo Yehova alobaki na motema na ye+ ete: “Nakolakela lisusu mabele mabe soki moke te+ mpo na moto, mpamba te mposa+ ya motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye;+ mpe nakoboma lisusu eloko nyonso ya bomoi soki moke te ndenge nasali.+

  • Yobo 10:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Nabondeli yo, kobosana te ete osalaki ngai na mabele ya lima+

      Mpe okozongisa ngai na putulu.+

  • Mosakoli 12:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo putulu ezali kozonga na mabele+ ndenge ezalaki mpe elimo+ ezali kozonga epai ya Nzambe ya solo+ oyo apesaki yango.+

  • Yisaya 64:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe sikoyo, Ee Yehova, yo nde Tata na biso.+ Biso tozali mabele ya lima,+ mpe yo nde Moyemi na biso;+ mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto