Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Kasi mokili epai bozali kokatisa mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku+ ya patatalu. Yango ezali komɛla mai ya mbula ya likoló;

  • Yobo 38:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Nani akoki na bwanya kotánga mapata na bosikisiki,

      To bilokó ya mai ya likoló—nani akoki kosopa yango,+

  • Nzembo 147:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Ye oyo azali kozipa likoló na mapata,+

      Ye oyo abongisaka mbula mpo na mabele,+

      Ye oyo azali kosala ete bangomba ebimisa matiti.+

  • Yirimia 10:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Soki abimisi mongongo na ye, makɛlɛlɛ ya mai ezali koyokana na likoló,+ mpe azali komatisa mbɔngi ya mai uta na ndelo ya nsuka ya mabele.+ Asalá baporte ya mai mpo na mbula,+ mpe abimisaka mopɛpɛ longwa na bandako na ye ya kobomba biloko.+

  • Amose 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Ye oyo azali kotonga baeskalye na ye na likoló,+ mpe ndako na ye oyo atongá likoló ya mabele oyo ye atyaki moboko;+ ye oyo azali kobenga mai ya mbu,+ mpo akoka kosopa yango na etando ya mabele+—Yehova nde nkombo na ye.’+

  • Zekaria 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Bósɛnga Yehova apesa mbula+ na eleko ya mbula ya prɛnta,+ ɛɛ Yehova ye oyo asalaka mapata ya mbula ya mopɛpɛ makasi,+ mpe ye oyo apesaka bango mbula ya makasi,+ apesaka moto na moto matiti na elanga.+

  • Matai 5:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló,+ mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.+

  • Misala 14:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 atako amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli bino bolamu,+ ndenge apesaka bino bambula+ uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto