28 Mpe mai ezalaki kaka kozonga.+ Nsukansuka yango ezipaki makalo ya bitumba ná basoda oyo batambolaka na mpunda ya mampinga nyonso ya basoda ya Farao mpe oyo bakɔtaki na mbu nsima na bango.+ Moko te kati na bango atikalaki.+
4 mpe oyo asalaki na mampinga ya basoda ya Ezipito, na bampunda na ye mpe na makalo na ye ya bitumba oyo, na miso na bango, asalaki ete bázinda na mai ya Mbu Motane ntango bazalaki kolanda bango,+ mpe Yehova abebisaki bango tii na mokolo ya lelo;+
7 Mpe babandaki kobelela Yehova.+ Bongo ye atyaki molili kati na bino ná bato ya Ezipito+ mpe akitiselaki bango mbu mpe azipaki bango,+ mpe miso na bino emonaki makambo oyo nasalaki na Ezipito;+ mpe bofandaki mikolo mingi na esobe.+