6 Mpe talá! nakotɛlɛma liboso na yo kuna likoló ya libanga na Horebe. Mpe osengeli kobɛta libanga, mpe mai esengeli kobima na yango, mpe bato bakomɛla yango.”+ Na yango, Moize asalaki bongo na miso ya mikóló ya Yisraele.
11 Na yango, Moize atombolaki lobɔkɔ na ye mpe abɛtaki libanga na lingenda na ye mbala mibale; mpe mai mingi ebandaki kobima, mpe liyangani ná banyama na bango oyo ememaka mikumba babandaki komɛla.+