Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Nazali mpenza kozwa likoló ná mabele batatoli liboso na bino lelo,+ ete natye bomoi ná liwa liboso na yo,+ lipamboli+ ná elakeli mabe;+ mpe osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi,+ yo ná bana na yo,+

  • Yosua 24:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Nde soki emonani mabe na miso na bino kosalela Yehova, bópona bino moko lelo nani bino bokosalela,+ soki banzambe oyo bankɔkɔ na bino oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale basalelaki+ to banzambe ya Baamore oyo bozali kofanda na mokili na bango.+ Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”+

  • Yosua 24:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na yango, Yosua alobaki na bato boye: “Bino moko bozali batatoli+ ete, na likanisi na bino moko, boponi Yehova, mpo na kosalela ye.”+ Na yango, bango balobaki ete: “Tozali batatoli.”

  • Nzembo 119:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  15 Nakomibanzabanza mpo na bitinda na yo,+

      Mpe nakotala banzela na yo.+

  • Masese 1:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 mpo bayinaki boyebi,+ mpe baponaki kobanga Yehova te.+

  • Luka 10:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Nzokande, kaka biloko moke+ nde ezali na ntina, to moko kaka. Maria ye aponi eloko oyo ezali malamu,+ mpe bakobɔtɔla ye yango te.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto