Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 7:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe amoniseli ngai motema boboto+ liboso ya mokonzi ná bapesi-toli+ na ye mpe liboso ya bankumu nyonso ya nguya ya mokonzi. Mpe ngai, ɛɛ ngai, namilendisaki mpo lobɔkɔ+ ya Yehova Nzambe na ngai ezalaki elongo na ngai, mpe nabandaki koyanganisa bankumu ya Yisraele mpo bámata elongo na ngai.

  • Nzembo 18:50
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 50 Ye azali kosala misala minene ya lobiko mpo na mokonzi na ye+

      Mpe azali komonisela moto na ye oyo atyami mafuta motema boboto,+

      Epai ya Davidi mpe epai ya momboto na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Nzembo 68:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ee Nzambe, ntango obimaki liboso ya bato na yo,+

      Ntango ozalaki kotambola na mokili oyo ekauká+—Sela—

  • Yisaya 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: Yehova akopesa lobɔkɔ na ye lisusu, mpo na mbala ya mibale,+ mpo na kozwa bato na ye oyo bakotikala na Asiri+ mpe na Ezipito,+ na Patrose+ mpe na Kushi,+ na Elame,+ na Shinare,+ na Hamate mpe na bisanga ya mbu.+

  • Yisaya 61:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nde bino, bokobengama banganga-nzambe ya Yehova;+ bakoloba ete bozali basaleli+ ya Nzambe na biso.+ Bokolya biloko ya bikólo,+ mpe bokomikumisa na nkembo na bango.+

  • Zekaria 8:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na mikolo yango, bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo+ bakosimba,+ ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda+ moko mpe bakoloba ete: “Tokokende na bino,+ mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”’”+

  • Matai 24:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo,+ mpe bakoyanganisa bato oyo ye aponá+ esika moko uta na mipɛpɛ minei,+ uta na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.

  • Emoniseli 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe nsima ya mikolo misato ná ndambo+ elimo ya bomoi oyo euti na Nzambe ekɔtelaki bango,+ mpe batɛlɛmaki na makolo na bango, mpe bato oyo bazalaki kotala bango babangaki makasi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto