Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 8:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, kokiselá mosaleli na yo tata na ngai Davidi likambo oyo olakaki ye ete: ‘Moto ya libota na yo akozanga te na kiti ya bokonzi ya Yisraele liboso na ngai,+ kaka soki bana na yo bakebi na nzela na bango, soki batamboli liboso na ngai, ndenge yo otambolaki liboso na ngai.’

  • 1 Ntango 17:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakotɛlɛmisa ye na ndako+ na ngai mpe na bokonzi+ na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe kiti na ye ya bokonzi+ ekokóma kiti oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”’”

  • 2 Ntango 6:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, kokiselá mosaleli na yo tata na ngai Davidi likambo oyo olakaki ye ete: ‘Moto ya libota na yo akozanga te na kiti ya bokonzi ya Yisraele liboso na ngai,+ kaka soki bana na yo+ bakebi na nzela na bango, soki batamboli na mobeko na ngai,+ ndenge yo otambolaki liboso na ngai.’+

  • Nzembo 89:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Momboto na ye ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+

      Mpe kiti na ye ya bokonzi lokola moi liboso na ngai.+

  • Yisaya 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+

  • Matai 9:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Ntango Yesu azalaki koleka mosika, bato mibale oyo bakufá miso+ balandaki ye, bazali koganga mpe koloba ete: “Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa.”+

  • Misala 2:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Na yango, lokola azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe alapelaki ye ndai ete akofandisa moto moko oyo auti na mbuma ya bangei na ye na kiti na ye ya bokonzi,+

  • Baroma 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpo na Mwana na ye, oyo abotamaki moto+ na libota ya Davidi,+

  • Baroma 15:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe lisusu Yisaya alobi: “Mosisa ya Yese akozala,+ mpe moto oyo akobima mpo na koyangela bikólo akozala;+ bikólo bakotyela ye elikya na bango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto