Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 32:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Na yango, Moize apesaki bango, elingi koloba, bana ya Gade+ mpe bana ya Rubene+ mpe ndambo ya libota ya Manase+ mwana ya Yozefe, bokonzi ya Sihone+ mokonzi ya Baamore mpe bokonzi ya Oge+ mokonzi ya Bashane, mokili ya bingumba na yango na bateritware, mpe bingumba ya mokili zingazinga.

  • Kolimbola Mibeko 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe na ntango yango, tozwaki mokili yango; longwa na Aroere,+ oyo ezali pene na lobwaku ya mokɛli ya Arnone, mpe etúká ya ngombangomba ya Gileade kabolá na mibale, mpe bingumba na yango, napesi yango Barubene mpe Bagade.+

  • Yosua 12:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Talá bakonzi ya mokili oyo bana ya Yisraele balongaki mpe bazwaki mokili na bango na ngámbo ya Yordani oyo ezali epai moi ebimaka,+ banda na lobwaku ya mokɛli ya Arnone,+ matá tii na Ngomba Heremone+ mpe Araba+ mobimba, epai moi ebimaka:

  • Nehemia 9:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Mpe opesaki bango makonzi+ mpe bato ya bikólo, mpe okabolaki yango ndambondambo;+ bongo bazwaki mokili ya Sihone,+ ɛɛ, mokili ya mokonzi ya Heshibone,+ mpe mokili ya Oge+ mokonzi ya Bashane.+

  • Nzembo 44:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Yo moko na lobɔkɔ na yo obenganaki mpenza bikólo,+

      Mpe olonaki bango na esika ya bikólo yango.+

      Obandaki kobuka bituluku ya bato ya bikólo mpe kotika yango ekende.+

  • Nzembo 78:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 Mpe nsukansuka, abenganaki bikólo mpo na bango,+

      Mpe na nsinga ya komeka, apesaki bango libula,+

      Bongo afandisaki mabota ya Yisraele na bandako na bango.+

  • Nzembo 105:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Mpe nsukansuka, apesaki bango mikili ya bikólo,+

      Mpe bazalaki se kozwa mbuma ya mosala makasi ya bituluku ya bato ya bikólo,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto