Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 1:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe Nzambe alobaki lisusu ete: “Tósala+ moto na elilingi na biso,+ azala lokola biso,+ mpe bango bázala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya banyama ya mboka mpe likoló ya mabele mobimba mpe likoló ya nyama mosusu nyonso oyo etambolaka na mabele.”+

  • Nzembo 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Mpo yo Moto obimisaki ngai na libumu,+

      Yo Moto osalaki ete natya motema ntango nazalaki na mabɛlɛ ya mama na ngai.+

  • Nzembo 71:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Nabandá kotalela yo longwa na libumu;+

      Yo nde Moto okaboli ngai na libumu ya mama na ngai.+

      Ntango nyonso lisanzoli na ngai ezali mpo na yo.+

  • Nzembo 100:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bóyeba ete Yehova azali Nzambe.+

      Ye nde asalaki biso, kasi biso moko te.+

      Tozali bato na ye mpe bampate na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+

  • Yisaya 44:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Talá oyo Yehova, Mokeli na yo+ mpe Moto oyo asalaki yo,+ alobi, moto oyo azali se kosalisa yo banda na libumu:+ ‘Kobanga te,+ Ee mosaleli na ngai Yakobo, mpe yo, Yeshurune,+ oyo naponi.

  • Yirimia 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Liboso nasala yo na kati ya libumu,+ nayebaki yo,+ mpe liboso obima na libumu, nasantisaki yo.+ Nakómisaki yo mosakoli epai ya bikólo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto