Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 25:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Yehova azali malamu mpe sembo.+

      Yango wana ateyaka basumuki nzela na ye.+

  • Nzembo 100:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpo Yehova azali malamu;+

      Motema boboto na ye ezali seko na seko,+

      Mpe bosembo na ye libota na libota.+

  • Nzembo 104:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Oyo opesaka bango balɔkɔtaka yango.+

      Ofungolaka lobɔkɔ na yo​—batondaka na biloko ya malamu.+

  • Nahumu 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Yehova azali malamu,+ esika makasi ya libateli+ na mokolo ya mpasi.+

      Mpe ayebaka baoyo bazali koluka esika ya kokima epai na ye.+

  • Matai 5:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló,+ mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.+

  • Misala 14:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 atako amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli bino bolamu,+ ndenge apesaka bino bambula+ uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”+

  • Yakobo 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Likabo nyonso ya malamu+ mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló,+ mpo eutaka na Tata ya miinda ya likoló,+ mpe ye abongwanaka te lokola elili.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto