Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 33:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kasi alobaki na ye ete: “Nkolo na ngai ayebi ete bana bazali motau mpe nazali na bampate mpe bangɔmbɛ oyo ezali komɛlisa,+ mpe soki batambwisi yango nokinoki mpenza na mokolo moko, boye etonga mobimba ekokufa.+

  • Kobima 23:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mikolo motoba okosala mosala na yo;+ kasi na mokolo ya nsambo okotika kosala, mpo ngɔmbɛ-mobali na yo mpe mpunda na yo epema mpe mwana mobali ya moombo na yo ya mwasi mpe moto oyo afandi mopaya bázwa lisusu makasi.+

  • Kolimbola Mibeko 22:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Osengeli te komona mpunda ya ndeko na yo to ngɔmbɛ na ye ekwei na balabala mpe kotika yango na nko. Osengeli mpenza kosalisa ye na kotɛlɛmisa yango.+

  • Kolimbola Mibeko 22:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Osengeli te kobalola mabele na ngɔmbɛ mpe na mpunda oyo ekangisami esika moko.+

  • Kolimbola Mibeko 25:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Osengeli kokanga ngɔmbɛ monɔkɔ te wana ezali kotutatuta mbuma.+

  • Yona 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo ngai, nasengeli nde koyokela Ninive engumba oyo monene mawa te,+ engumba oyo ezali na bato koleka nkóto nkama moko na ntuku mibale (120 000) oyo bayebi ata moke te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi, bakisa mpe ebele ya banyama ya mboka?”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto