Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 32:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe bokoloba lisusu ete: ‘Talá mosaleli na yo Yakobo azali nsima na biso.’”+ Mpo alobaki na motema na ye ete: “Ntango mosusu nakokitisa ye motema na likabo oyo ekei liboso na ngai,+ mpe na nsima, nakomona elongi na ye. Mbala mosusu, akoyamba ngai na boboto.”+

  • 2 Samwele 16:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ntango Davidi alekaki mwa moke nsɔngɛ yango,+ talá, Ziba+ mosaleli ya Mefiboshete,+ ayaki kokutana na ye, ná mpunda mibale+ oyo bakangisá kiti na yango, mpe ememi mampa+ nkama mibale (200) mpe bagato nkama moko (100) ya mbuma ya vinyo,+ mpe maboke nkama moko (100) ya mbuma ya eleko ya molunge+ mpe elokó moko monene ya vinyo.+

  • Masese 18:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Likabo oyo moto apesi ekofungolela ye nzela polele,+ mpe ekomema ye ata liboso ya bato minene.+

  • Masese 19:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bato mingi bakitisaka moto ya lokumu motema,+ mpe moto nyonso azalaka moninga ya moto oyo apesaka makabo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto