Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Okoki nde koyeba makambo mozindo ya Nzambe,+

      To okoki nde koyeba ndelo ya bonene ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?

  • Yobo 26:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Talá! Wana nde ebandeli ya banzela na ye,+

      Mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye!

      Kasi nkake na ye ya nguya, nani akomonisa ete akangi ntina na yango?”+

  • Nzembo 40:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Yo moko osali makambo mingi,+

      Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso;+

      Moko te akokani na yo.+

      Soki nalingi koyebisa to kolobela yango,

      Ekómi ebele koleka oyo nakoki koyebisa.+

  • Mosakoli 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe namonaki mosala nyonso ya Nzambe ya solo,+ ndenge bato bakoki te koyeba mosala oyo esalemá na nse ya moi;+ ata bato bazali se kosala makasi mpenza mpo na koluka, bazali koyeba te.+ Mpe ata soki balobi ete bazali na bwanya mwa mingi mpo na koyeba,+ bakokoka te koyeba.+

  • Baroma 11:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Ee bomɛngo+ ya Nzambe mpe bwanya+ na ye mpe boyebi+ na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te+ mpe banzela na ye ekoki koyebana te!

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto