9 Mpe na mokolo yango, bakoloba mpenza boye: “Talá! Oyo nde Nzambe na biso.+ Totyeli ye elikya,+ mpe akobikisa biso.+ Oyo nde Yehova.+ Totyeli ye elikya. Tózala na esengo mpe tósepela na lobiko oyo euti na ye.”+
7 Kasi nakoyokela ndako ya Yuda mawa,+ mpe nakobikisa bango na nzela ya Yehova Nzambe na bango;+ kasi nakobikisa bango na nzela ya litimbo te, ya mopanga te, ya etumba te, ya bampunda te, ya bato oyo batambolaka na mpunda mpe te.”+