Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 29:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe na mokolo yango, bato oyo bakufá matoi bakoyoka maloba ya buku oyo,+ mpe miso ya bato oyo bakufá miso ekolongwa na molili ná molili makasi mpe ekomona.+

  • Yirimia 6:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Nakoloba na nani mpe nakokebisa nani, mpo báyoka? Talá! Matoi na bango ekatamá ngenga te, yango wana bakoki kotya likebi te.+ Tála! Liloba ya Yehova mpenza ekómi epai na bango eloko ya kotyola,+ liloba oyo bakoki kosepela na yango te.+

  • Marko 7:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Bongo makoki na ye ya koyoka efungwamaki,+ mpe nsinga ya lolemo na ye efungwamaki, mpe abandaki koloba malamu.

  • Luka 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Bongo azongiselaki bayekoli yango mibale ete: “Bókende+ koyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki: bato oyo bakufá miso+ bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto