6 “Na yango lobá na bana ya Yisraele ete: ‘Ngai Yehova, mpe ngai nakolongola mpenza bino na mikumba ya kilo ya Baezipito mpe nakobikisa bino na boombo na bango,+ mpe ya solo nakosikola bino na lobɔkɔ oyo esembolami mpe na bitumbu minene.+
17 Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli na yo,+ Mosantu ya Yisraele:+ “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko,+ Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.+
34 Mosikoli na bango azali makasi,+ Yehova ya mampinga nde nkombo na ye.+ Akozanga te kokata likambo na bango,+ mpo apemisa mpenza mokili+ mpe atya bato oyo bafandi na Babilone na kati ya yikiyiki.”+