2 “Bóyebisa yango kati na bikólo mpe bósakola yango.+ Bótombola elembo;+ bósakola yango. Bóbomba eloko te. Bóloba: ‘Babilone ezwami.+ Bele apɔli na nsɔni.+ Merodake akómi kobanga. Bililingi na ye epɔli na nsɔni.+ Bikeko na ye ya bosɔtɔ ekómi kobanga.’
44 Mpe nakotyela Bele+ likebi na ngai na Babilone, mpe nakobimisa na monɔkɔ na ye biloko oyo amɛlaki.+ Mpe bikólo ekosopana epai na ye lisusu te.+ Lisusu, efelo ya Babilone ekokwea mpenza.+