-
Yirimia 29:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 Mpe nakomitika ete bózwa ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakoyanganisa etuluku ya bakangami na bino mpe nakosangisa bino uta na bikólo nyonso mpe uta na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakozongisa bino lisusu na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+
-
-
Yirimia 46:27Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
27 “‘Kasi yo kobanga te, Ee mosaleli na ngai Yakobo, mpe kolɛnga na nsɔmɔ te, Ee Yisraele.+ Mpo talá nazali kosikola yo uta na mosika mpe bana na yo uta na mokili ya bokangami na bango.+ Mpe Yakobo akozonga mpenza, mpe akozala na mitungisi te, mpe akozala na kimya mpe moto ya kolɛngisa ye akozala te.+
-