Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 42:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Molimo na ngai ezali mpenza na mposa ya Nzambe,+ ya Nzambe ya bomoi.+

      Ntango nini nakoya mpe komonana liboso ya Nzambe?+

  • Nzembo 63:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 63 Ee Nzambe, ozali Nzambe na ngai, nazali kaka koluka yo.+

      Molimo na ngai ezali mpenza na mposa na yo.+

      Mpo nzoto na ngai elɛmbi na ndenge ezali koyoka yo mposa makasi

      Na mokili oyo ekauká mpe oyo elɛmbá, epai mai ezali te.+

  • Amose 8:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “‘Talá! Mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mpe nakotinda nzala kati na mokili, nzala ya mampa te, mpe nakotinda mposa, mposa ya mai te, kasi nde ya koyoka maloba ya Yehova.+

  • Matai 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa+ ya boyengebene, mpo bakotonda.+

  • Emoniseli 21:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe alobaki na ngai ete: “Esalemi! Ngai nazali Alfa ná Omega, ebandeli mpe nsuka.+ Moto nyonso oyo azali na mposa ya mai nakopesa ye ofele mai oyo euti na liziba ya mai ya bomoi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto