17 Mpe bana mibali ya Babilone bazalaki se kokɔta epai na ye, na mbeto ya komonisa bolingo, mpe bazalaki se kokómisa ye mbindo na misala na bango ya pite;+ mpe bazalaki se kokómisa ye mbindo, mpe molimo na ye ebandaki koyoka bango mpii mpe etikaki bango.