Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Kasi Zerubabele, Yeshua+ ná bankumu+ mosusu ya bandako ya batata ya Yisraele balobaki na bango ete: “Kotongela Nzambe+ na biso ndako ezali likambo na bino te, etali nde biso, mpo biso moko nde tokotongela Yehova Nzambe ya Yisraele, kaka ndenge Mokonzi Siruse+ mokonzi ya Perse apesaki biso mitindo.”

  • Ezera 5:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na ntango yango nde Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná Yeshua+ mwana ya Yehozadake batɛlɛmaki mpe babandaki kotonga lisusu ndako ya Nzambe, oyo ezalaki na Yerusaleme; mpe basakoli ya Nzambe+ bazalaki na bango mpo na kopesa bango lisalisi.

  • Yisaya 32:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Talá! Mokonzi+ moko akoyangela mpo na boyengebene;+ bongo bankumu+ bakoyangela mpo na bosembo.

  • Yisaya 51:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na yo,+ mpe nakozipa yo na elili ya lobɔkɔ na ngai,+ mpo na kolona likoló+ mpe kotya moboko ya mabele+ mpe koloba na Siona ete: ‘Bozali bato na ngai.’+

  • Luka 12:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Bóbanga te,+ etonga moke,+ mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.+

  • Baroma 8:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpo biloko oyo ezalisamá ekómisamaki eloko mpamba,+ na ndenge na yango moko te kasi mpo na moto oyo akómisaki yango bongo, mpo na elikya+

  • Emoniseli 14:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe namonaki, mpe talá! Mwana-Mpate+ atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona,+ mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000)+ oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata+ na ye ekomamá na bilongi na bango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto