-
Yisaya 66:20Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
20 Mpe ya solo bakouta na bandeko na bino na bikólo nyonso+ lokola likabo epai na Yehova,+ likoló ya bampunda mpe na makalo mpe na bapusu oyo ezipami, likoló ya badɔngi mpe likoló ya bakamela+ ya basi oyo ezali na mbangu, na ngomba na ngai mosantu,+ Yerusaleme,” Yehova alobi bongo, “se lokola na ntango bana ya Yisraele bayaka na likabo na kati ya mbɛki ya pɛto mpo na kokɔta na ndako ya Yehova.”+
-
-
Obadia 20Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
20 Mpe biloko oyo bato ya Kanana+ bazwaki tii na Zarefate+ ekokóma ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya, oyo bazalaki na kati ya mwa ngomba oyo basalá mpo na libateli,+ elingi koloba, bana ya Yisraele. Mpe bato ya Yerusaleme oyo bamemamaki na mboka mopaya, baoyo bazalaki na Sefarade, bakozwa bingumba ya Negebe.+
-