Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 14:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Mpe nakotɛlɛmɛla bango,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.

      “Mpe nakolongola na Babilone nkombo+ ná bato oyo batikali, bana ná libota,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yirimia 50:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo ekólo moko euti na nɔrdi eyei kobundisa ye.+ Yango nde ezali kokómisa mokili na ye eloko ya kokamwa, bongo moto moko te azali kofanda kuna.+ Moto mpe nyama ya mboka bakimi.+ Bakei na bango.”+

  • Yirimia 50:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpo na nkanda ya Yehova, bato bakofanda kati na ye te,+ mpe na mobimba na ye akokóma esika oyo etikali mpamba.+ Moto nyonso oyo akoleka pene ya Babilone, akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akobɛta piololo mpo na bolɔzi na ye nyonso.+

  • Yirimia 51:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe mabele eningana mpe ezala na mpasi makasi,+ mpamba te makanisi ya Yehova ebimi mpo na kobundisa Babilone, mpo na kokómisa mokili ya Babilone eloko ya kokamwa, moto azali kofanda kuna te.+

  • Emoniseli 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe anzelu moko ya makasi atombolaki libanga moko ekokani na libanga monene oyo banikaka na yango mbuma+ mpe abwakaki yango na mbu,+ alobi: “Ndenge wana nde bakobwaka Babilone engumba monene na mbala moko, mpe ekomonana lisusu te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto