13 Na esika ya mwa banzete ya nzubɛnzubɛ, nzete ya jenevriye ekobima.+ Na esika ya lititi ya sendesende nzete ya mirte ekobima.+ Mpe ekozala mpenza eloko moko ya lokumu mpo na Yehova,+ elembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ oyo ekolongolama te.”
13 “Nkembo ya Libá ekoya epai na yo, nzete ya jenevriye, nzete ya frɛnɛ mpe nzete ya siprɛ kaka na mbala moko,+ mpo na kokómisa esika na ngai mosantu kitoko;+ mpe nakokumisa esika ya makolo na ngai.+