39 Bongo bato oyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai bakofanda elongo na banyama oyo ezali koganga, mpe bamaligbanga ekofanda epai na ye;+ moto ata moko te akofanda lisusu epai na ye, akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.”+
25 “Talá nazali koyela yo,+ Ee ngomba oyo ebebisaka,”+ yango nde liloba ya Yehova, “yo mobebisi ya mabele mobimba;+ mpe nakosembolela yo lobɔkɔ na ngai mpe nakobalolabalola yo longwa na mabanga mpe nakokómisa yo ngomba oyo ezali kopela.”+
62 Mpe osengeli koloba boye: ‘Ee Yehova, yo moko nde olobaki mpo na esika oyo, mpo na kolongola yango, mpo moto afanda lisusu kati na yango te,+ ezala moto to nyama ya mboka, kasi etikala mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’
2 Mpe agangaki na mongongo makasi+ ete: “Akwei! Babilone Monene akwei,+ mpe akómi esika ya kofanda ya bademo mpe esika ya mipɛpɛ+ nyonso ya mbindo mpe esika ya kobombana ya bandɛkɛ nyonso ya mbindo mpe oyo eyinami!+