2“Ee mibali, bóyula liseke na Siona,+ mpe bóbɛta ntangwa ya etumba+ na ngomba na ngai mosantu.+ Bato nyonso oyo bafandi na mokili bálɛngalɛnga;+ mpamba te mokolo ya Yehova ezali koya,+ mpamba te ekómi pene!
14 Mpe likoló na bango Yehova ye moko akomonana,+ mpe likula na ye ekobima mpenza lokola mokalikali.+ Mpe Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ye moko akoyula liseke,+ mpe akobima mpenza elongo na mipɛpɛ makasi ya sudi.+