12 Mpe nakokómisa banzela ya mai ya Nile+ mabele oyo ekauká mpe nakotɛka mokili na lobɔkɔ ya bato mabe,+ mpe nakosala ete mokili yango ná biloko oyo etondani na kati, etikala mpamba na lobɔkɔ ya bapaya.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.’+
11 Mpe ye akoleka mbu na mpasi;+ mpe akobɛta mbonge na mbu,+ mpe bisika nyonso ya bozindo ya Nile ekokauka.+ Mpe lolendo ya Asiri ekokitisama mpenza,+ mpe lingenda ya bokonzi+ ya Ezipito ekolongwa.+