Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi bazalaki ntango nyonso kosɛka+ bamemi-nsango ya Nzambe ya solo mpe komona maloba na ye mpamba+ mpe kotyola+ basakoli na ye, tii nkɛlɛ+ ya Yehova ekitelaki bato na ye, tii bakokaki lisusu kobikisama te.+

  • Nehemia 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Nzokande, bazangaki botosi+ mpe batombokelaki yo+ mpe bazalaki ntango nyonso kobwaka mobeko na yo na nsima ya mokɔngɔ na bango,+ mpe babomaki basakoli na yo,+ oyo bazalaki kotatwela bango mpo na kozongisa bango epai na yo;+ mpe bazalaki kaka kosala makambo na limemya ata moke te.+

  • Matai 21:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Nzokande, basali-bilanga bakamataki baombo na ye, babɛtaki moko, babomaki mosusu mpe babambaki mosusu mabanga.+

  • Matai 23:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Yango wana, talá nazali kotindela+ bino basakoli mpe bato ya bwanya mpe balakisi ya bato.+ Bokoboma bamosusu+ mpe bokobaka bamosusu na nzete, mpe bokobɛta bamosusu fimbo+ na basinagoga na bino mpe bokonyokola bango na engumba na engumba;

  • Misala 7:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Nani bankɔkɔ na bino banyokolaki te na kati ya basakoli?+ Ɛɛ, babomaki+ baoyo basakolaki liboso na ntina etali koya ya Moyengebene,+ oyo bino bokómi sikoyo batɛki mpe babomi na ye,+

  • 1 Batesaloniki 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 oyo babomaki ata Nkolo Yesu+ ná basakoli+ mpe banyokolaki biso.+ Lisusu, bazali kosepelisa Nzambe te, kasi bazali nde kotɛmɛla matomba ya bato nyonso,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto