Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 nazali lelo kozwa likoló ná mabele+ batatoli liboso na bino, ete bokokufa mpenza nokinoki na mokili epai bozali kokatisa Yordani mpo na kozwa yango. Bokoyeisa mikolo na bino mingi kuna te, mpo bokosila mpenza nyɛɛ.+

  • Kolimbola Mibeko 32:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Tyá litoi, Ee likoló, mpe tiká naloba;

      Mpe mabele eyoka maloba ya monɔkɔ na ngai.+

  • Yisaya 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Yoká,+ Ee likoló, mpe tyá litoi, Ee mabele, mpo Yehova ye moko alobi: “Nabɔkɔli mpe nakolisi bana,+ kasi bango batombokeli ngai.+

  • Yisaya 34:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Bino bikólo, bóbɛlɛma mpo na koyoka;+ mpe bino bituluku ya bato ya bikólo,+ bótya likebi. Mabele mpe nyonso oyo etondi wana eyoka,+ mabele oyo ebotaka+ mpe biloko na yango nyonso.+

  • Yirimia 6:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Yoká, Ee mabele! Talá! nazali komemela bato oyo mpasi,+ mbuma ya makanisi na bango,+ mpo batyaki likebi te na maloba na ngai; mpe mobeko na ngai—bazalaki mpe kobwaka yango.”+

  • Mika 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Ee bino bato ya bikólo, bóyoka bino nyonso; Ee mabele ná biloko oyo etondisi yo,+ bótya likebi mpe Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azala motatoli mpo na kofunda bino,+ Yehova uta na tempelo na ye mosantu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto