47Ee ngɔndɔ, mwana mwasi ya Babilone,+ kitá mpe fandá na putulu.+ Ee mwana mwasi ya Bakaladea,+ fandá na mabele esika kiti ya bokonzi ezali te.+ Mpo okozwa lisusu te libaku ya kobengama moto oyo amesaná na makambo ya makasi te mpe oyo amesaná na bomɛngo.+
17 “Mpe osengeli koloba na bango liloba oyo: ‘Tiká miso na ngai esopa mpisoli butu moi mpe etika te,+ mpo ngɔndɔ, mwana mwasi ya bato na ngai, abukani+ na kokwea moko ya monene, na mpota moko ya mpasi makasi.+