6 “Bókima, bólongwa na kati ya Babilone,+ mpe moto na moto abikisa molimo na ye.+ Bókufa mpo na libunga na ye te.+ Mpo ezali ntango ya Yehova mpo na kozongisa mabe.+ Azali kozongisela ye makambo oyo ye asalaki.+
11 “Bópelisa makula.+ Bótondisa banguba ya zolongano. Yehova alamwisi elimo ya bakonzi ya Bamede,+ mpo likanisi na ye ezali mpo na Babilone,+ mpo na kobebisa ye. Mpo Yehova azali kozongisa mabe, kozongisa mabe mpo na tempelo na ye.+