Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Mpe bakozinga yo na kati ya baporte na yo nyonso kino bifelo na yo ya milai mpe oyo ebatelami makasi, oyo ozali kotyela motema ekokwea na mokili na yo mobimba, ɛɛ, bakozinga mpenza yo na kati ya baporte na yo nyonso na mokili na yo mobimba, oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo.+

  • Yisaya 29:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe ya solo, nakotya kaa na bangámbo nyonso mpo na kobunda na yo, mpe nakozinga yo na lopango ya banzete mpe nakotɛlɛmisa biloko oyo ekozinga yo.+

  • Ezekiele 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe zingá yango mpenza+ mpe tongá efelo ya kozinga mboka mpo na kobundisa yango+ mpe tɛlɛmisá mwa ngomba oyo basalá mpo na kobundisa yango+ mpe tyá bakaa mpo na kobundisa yango mpe tyá zingazinga na yango bamasini ya kobukabuka mpo na kobundisa yango.+

  • Ezekiele 21:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na lobɔkɔ na ye ya mobali, kosakola makambo oyo ebombaná elakisaki Yerusaleme, mpo na kotya bamasini ya kobukabuka,+ mpo báfungola monɔkɔ mpo na koboma, mpo na koyokisa lokito ya elembo ya kokebisa,+ mpo na kotyela baporte bamasini ya kobukabuka, mpo na kotɛlɛmisa ngomba ya mabele mpo na kozinga mboka, mpo na kotonga efelo ya kozinga mboka.+

  • Luka 19:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Mpo mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi+ ya banzete oyo bakómisá nsɔngɛ+ mpe bakozingela+ yo mpe bakonyokola+ yo epai na epai,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto