15 Mpe talá nazali elongo na yo mpe nakobatela yo na nzela nyonso oyo ozali kokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo,+ mpo nakotika yo te kino nakosilisa mpenza kosala oyo nalobi na yo.”+
12 Na yango, alobaki ete: “Mpo nakozala elongo na yo,+ mpe talá elembo mpo na yo oyo ekomonisa ete ngai nde natindi yo:+ Ntango okosilisa kobimisa bato na Ezipito, bokosalela Nzambe ya solo na ngomba oyo.”+
5 Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo.+ Ndenge nazalaki na Moize, ndenge wana nde nakozala na yo.+ Nakosundola yo te mpe nakotika yo soki moke te.+