Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 mpe mpo otombola miso na yo na likoló mpe omona mpenza moi ná sanza mpe minzoto, limpinga nyonso ya likoló, mpe olengolama mpenza mpe ogumbamela yango mpe osalela yango,+ biloko oyo Yehova Nzambe na yo akabelá bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mabele mobimba.+

  • Kolimbola Mibeko 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe akei kosambela banzambe mosusu mpe agumbameli bango to agumbameli moi to sanza to limpinga nyonso ya likoló,+ eloko oyo napeseli mitindo te,+

  • Yirimia 44:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 kasi tokosala mpenza liloba nyonso oyo ebimi na monɔkɔ na biso,+ mpo na kobimisela ‘mokonzi-mwasi ya likoló’ milinga ya mbeka+ mpe kosopela ye makabo ya masanga,+ ndenge biso+ ná bankɔkɔ na biso,+ bakonzi na biso+ ná bankumu na biso tosalaki na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme, ntango tozalaki kotonda na limpa mpe tozalaki bato ya bomɛngo, mpe tomonaki mpasi ata moke te.+

  • Misala 7:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Bongo Nzambe abalukaki mpe akabaki bango+ mpo básalela limpinga ya likoló mosala mosantu, ndenge ekomamá na mokanda ya basakoli+ ete: ‘Ezalaki epai na ngai te nde bopesaki banyama oyo ebomami mpe bambeka na boumeli ya mbula ntuku minei (40) na esobe, boye te, Ee ndako ya Yisraele?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto