19 Atako bisika na yo oyo ebebisamá mpe bisika na yo oyo etikalá mpamba mpe mokili ya bitiká na yo ezali,+ atako sikoyo ozali nkaka mpenza mpe bato bakoki kofanda wana te, mpe baoyo bazalaki komɛla yo bakei mosika,+
34 “Nebukadrezare mokonzi ya Babilone alei ngai;+ atye ngai na mobulungano. Atye ngai lokola mbɛki oyo ezali na eloko te na kati. Amɛli ngai lokola nyoka moko monene;+ atondisi libumu na ye na biloko na ngai ya kitoko. Asukoli ngai mpe abwaki ngai libándá.