4 Bongo akamataki wolo yango na mabɔkɔ na bango, mpe asalaki yango+ na esaleli ya koyema mpe anyangwisaki yango mpo ekóma ekeko ya mwana-ngɔmbɛ.+ Mpe babandaki koloba ete: “Talá Nzambe na yo, Ee Yisraele, oyo akambaki yo mpe abimisaki yo na mokili ya Ezipito.”+
28 Na yango, mokonzi asalaki likita+ mpe asalaki bana-ngɔmbɛ mibale ya wolo+ mpe alobaki na bato ete: “Ezali mpasi bómataka na Yerusaleme. Ee Yisraele, talá Nzambe na yo+ oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito.”+
29 Kaka masumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate, masumu oyo atindaki Yisraele básala,+ nde Yehu alongwaki na yango te, elingi koloba, bana-ngɔmbɛ ya wolo+ oyo moko ezalaki na Betele mpe mosusu na Dani.+