10 Mpo obosani+ Nzambe ya lobiko na yo;+ mpe okanisi lisusu te Libanga+ ya ndako na yo ya makasi. Yango wana ozali kolona bilanga kitoko, mpe ozali kotya mwa etape ya mopaya wana.
32 Ngɔndɔ akoki nde kobosana biloko na ye ya kobongisa nzoto, mwasi ya libala bankamba na ye ya ntolo? Nzokande, bato na ngai—bango babosani ngai mikolo mingi oyo ekoki kotángama te.+
21 Lokito eyokani na banzela oyo bato balekalekaka, kolela, malɔmbɔ ya bana ya Yisraele. Mpo batɛngisi nzela na bango;+ babosani Yehova Nzambe na bango.+
25 Yango nde libula na yo, ndambo na yo oyo namekeli yo,”+ yango nde liloba ya Yehova, “mpo obosani ngai+ mpe ozali kaka kotyela makambo ya lokuta motema.+