16 “‘“Mpo na ebele ya biloko na yo ya mombongo,+ batondisaki mobulu na kati na yo, mpe obandaki kosala lisumu.+ Mpe nakobengana yo na ngomba ya Nzambe lokola eloko mpamba, mpe nakoboma yo,+ Ee keruba oyo azipaka, mpo ozala lisusu te na kati ya mabanga ya mɔtɔ.