13 Nazali Yehova Nzambe na bino, ngai moto nabimisaki bino na mokili ya Ezipito mpo bózala baombo na bango te,+ mpe nabukaki banzete ya ekanganeli na bino, natɛlɛmisaki bino alima mpe natambwisaki bino.+
20 “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+
18 Mpe na Tehafenehese,+ mokolo ekoyinda mpenza, ntango nakobuka ekanganeli ya Ezipito.+ Mpe kati na ye, lolendo ya makasi na ye ekosilisama mpenza.+ Kasi ye, mapata ekozipa ye,+ mpe basité na ye oyo esimbami na ye ekokende na bokangami.+