Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 49:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpe Edome akokóma eloko ya kokamwa.+ Moto nyonso oyo akoleka pembeni na ye akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akobɛta piololo mpo na malɔzi na ye nyonso.+

  • Yirimia 49:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ndenge Sodoma ná Gomora mpe basité na yango oyo ezalaki zingazinga ebebisamaki,”+ Yehova alobi: “moto akofanda kuna te, mpe mwana ata moko te ya bato akofanda mopaya kuna.+

  • Ezekiele 25:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosembolela mpe Edome lobɔkɔ na ngai+ mpe nakolongola kuna moto ná nyama ya mboka,+ mpe nakokómisa yango esika oyo ebebisami banda na Temane,+ ɛɛ kino na Dedane.+ Bakokwea na mopanga.

  • Malaki 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Mpamba te Edome azali kaka koloba ete: ‘Bapanzipanzi biso, kasi tokozonga mpe tokotonga bisika oyo ebebisamaki,’ talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bango bakotonga; kasi ngai nakokweisa.+ Mpe bato bakobenga bango mpenza ete “teritware ya makambo mabe” mpe “bato oyo Yehova ayokelá nkanda+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto