Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 54:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kobanga te,+ mpo okopɔla na nsɔni te;+ mpe koyoka te ete osambwe, mpo okolɛmba nzoto te.+ Mpo okobosana ata nsɔni ya ntango ya bolenge na yo,+ mpe okokanisa lisusu te kosambwa ya kozala ntango nyonso mwasi oyo mobali akufá.”

  • Yisaya 60:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Mpe bana ya baoyo bazali komonisa yo mpasi bakoya mpenza epai na yo, bagumbami;+ mpe baoyo nyonso bazali komemya yo te bakofukama na makolo na yo,+ mpe ya solo bakobenga yo engumba ya Yehova, Siona+ ya Mosantu ya Yisraele.

  • Ezekiele 34:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “‘“Mpe nakobimisela bampate yango elanga oyo nkombo ekokende nsango,+ mpe bampate yango ekozala biloko oyo nzala ekosilisa na mokili lisusu te,+ mpe ekomema nsɔni na bikólo lisusu te.+

  • Mika 7:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Ee yo mwasi oyo ozali monguna na ngai, kosepela te na oyo ezwi ngai.+ Atako nakwei, nakotɛlɛma kaka;+ atako nazali kofanda na molili,+ Yehova akozala pole epai na ngai.+

  • Sefania 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Talá, nazali kotɛmɛla baoyo nyonso bazali komonisa yo mpasi, na ntango wana;+ mpe nakobikisa ye oyo azali kotɛnguma,+ mpe nakoyanganisa ye oyo apalanganá.+ Mpe nakotya bango bázala lisanzoli mpe bázwa nkombo na mokili mobimba epai bayokisaki bango nsɔni.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto