Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bokobebisa+ mpenza bisika nyonso epai bikólo oyo bozali kobengana esaleli banzambe na yango, na bangomba milai mpe na bangomba mike mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

  • Yisaya 65:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 mpo na mabunga na bango moko mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na bango, nyonso na mbala moko,”+ Yehova alobi bongo. “Lokola babimisi milinga ya mbeka na bangomba, mpe basambwisi ngai+ na bangomba mike,+ ngai mpe nakomeka libosoliboso lifuti na bango na ntolo na bango.”+

  • Yirimia 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+

  • Ezekiele 20:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe nakɔtisaki bango na mokili+ oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe nzete nyonso oyo ezali na bitape, babandaki kopesa bambeka na bango kuna+ mpe kopesa kuna makabo na bango oyo ezali kosilikisa, mpe kopesa kuna nsolo na bango ya kokitisa motema+ mpe kosopa makabo na bango ya masanga kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto