Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na libándá, mopanga ekotika bango mabɔkɔ mpamba,+

      Mpe na kati ya ndako, kobanga,+

      Ya elenge mobali mpe ya ngɔndɔ,+

      Ya mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ mpe ya moto oyo azali na nsuki mpɛmbɛ.+

  • Yirimia 21:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Moto oyo akotikala kaka na engumba oyo akokufa na mopanga mpe na nzala mpe na maladi mabe;+ kasi moto oyo akobima mpe akoleka epai ya Bakaladea oyo bazingi bino, akotikala na bomoi, mpe molimo na ye ekokóma nde eloko na ye ya kopunza.”’+

  • Yirimia 27:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpo na nini yo ná bato na yo bókufa na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe+ engebene oyo Yehova alobi na ekólo oyo ezali kosalela mokonzi ya Babilone te?

  • Bileli 1:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Talá, Ee Yehova, mpo makambo eyeli ngai ndongo. Misɔpɔ na ngai ezali na yikiyiki.+

      Motema na ngai ebaluki na kati na ngai,+ mpo nazalaki motomboki mpenza.+

      Na libándá, mopanga ezangisaki ngai bana.+ Na kati ya ndako, ezali lokola liwa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto