5Tiká nayembela moto oyo nalingaka loyembo. Ezali loyembo ya moto oyo nalingaka, oyo nakoyemba mpo na elanga na ye ya vinyo.+ Moto oyo nalingaka azalaki na elanga ya vinyo na mopanzi ya ngomba moko moke oyo ebotaka malamu.
12Lisusu, abandaki koloba na bango na bandakisa: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo,+ mpe azingaki yango na lopango, mpe atimolaki libulu ya ekamwelo ya vinyo mpe atongaki linɔ́ngi,+ mpe atikaki yango na mabɔkɔ ya basali-bilanga,+ mpe asalaki mobembo na mboka mopaya.+