Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 5:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Yango wana, se ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya blé+ mpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ, ekumu ya misisa na bango ekokóma lokola nsolo moko ya mabe,+ mpe fololo na bango ekomata lokola pudre, mpo baboyi mobeko ya Yehova ya mampinga,+ mpe bazangi limemya na liloba ya Mosantu ya Yisraele.+

  • Yirimia 4:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Amati lokola nkɔsi oyo ezali kobima na mwa zamba na yango,+ mpe moto oyo azali kobebisa bikólo asimbi nzela akei;+ abimi na esika na ye mpo na kokómisa mokili na yo eloko ya kokamwa. Bingumba na yo ekobebabeba mpe moto ata moko te akofanda kuna.+

  • Yirimia 7:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na yango, talá oyo Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Talá! Nkanda na ngai mpe nkɛlɛ na ngai ezali kosopanela esika oyo,+ bato mpe banyama ya mboka, nzete ya elanga+ mpe mbuma ya mabele; mpe ekopela mpenza, mpe ekobomama te.’+

  • Ezekiele 20:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Mpe osengeli koloba na zamba ya sudi boye: ‘Yoká liloba ya Yehova. Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai wana nazali kopelisela yo mɔtɔ,+ mpe ekozikisa na kati na yo nzete nyonso ya mobesu mpe nzete nyonso oyo ekauká.+ Mɔtɔ yango oyo ezali kopela ekobomama te,+ mpe ekozikisa bilongi nyonso mpenza banda na sudi kino na nɔrdi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto