34 Lisusu, Farao Neko akómisaki Eliakime+ mwana ya Yosiya mokonzi na esika ya tata na ye Yosiya mpe apesaki ye nkombo mosusu: Yehoyakime; mpe azwaki Yehoahaze mpe na nsima, akendaki na ye na Ezipito, mpe nsukansuka, akufaki kuna.+
2 baoyo basimbi nzela mpo bákita na Ezipito+ mpe batuni monɔkɔ na ngai te,+ mpo na kobombama na esika makasi ya libateli ya Farao mpe mpo na kozwa esika ya kokima na elili ya Ezipito!+
3 Mpe esika makasi ya libateli ya Farao ekokóma mpenza likambo moko ya nsɔni mpo na bino,+ mpe kobombama na elili ya Ezipito ekokóma eloko oyo ezali kosambwisa.+
36 Mpo na nini ozali komona ete kobongola nzela na yo ezali likambo ya mpamba?+ Okoyoka mpe nsɔni mpo na Ezipito,+ kaka ndenge oyokaki nsɔni mpo na Asiri.+
7 Mpe nalobaki na bango lisusu ete: ‘Mokomoko na bino abwaka biloko ya bosɔtɔ ya miso na ye,+ mpe bómikómisa mbindo te na bikeko ya bosɔtɔ ya Ezipito.+ Nazali Yehova Nzambe na bino.’+