Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Atombolaka moto oyo azangá longwa na putulu;+

      Abimisaka mobola na libulu ya putulu,+

      Mpo na kofandisa bango esika moko na bato ya lokumu; mpe apesaka bango kiti ya bokonzi ya nkembo+ mpo ezala ya bango.+

      Mpamba te makonzí ya mabele ezali ya Yehova,+

      Mpe azali kotya likoló na yango mabele oyo ebotaka.

  • Ezekiele 17:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe banzete nyonso ya esobe ekoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova,+ nakitisi nzete oyo etombwaná,+ natomboli nzete oyo ezalaki na nse,+ nakaukisi nzete oyo ezali naino mobesu+ mpe nasali ete nzete oyo ekauká ebimisa fololo. Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nasali+ yango.”’”

  • Zekaria 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Ee mwana mwasi ya Siona, zalá na esengo mingi.+ Ee mwana mwasi ya Yerusaleme, gangá na koganga ya bolongi.+ Talá! Mokonzi na yo+ azali koya epai na yo.+ Azali moyengebene, ɛɛ, abikisami;+ moto ya komikitisa,+ mpe amati likoló ya mpunda,* ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.+

  • Matai 11:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bókamata ekanganeli+ na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai,+ mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto+ mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto