48 Na yango, mokonzi akómisaki Danyele moto monene,+ mpe apesaki ye makabo minene ebele, mpe akómisaki ye moyangeli ya etúká nyonso oyo eyangelami ya Babilone+ mpe mokonzi ya bakomisɛrɛ akamba bato nyonso ya bwanya ya Babilone.
9 “‘Ee Beleteshazare kapita ya banganga-nzambe ya maji,+ lokola ngai moko nayebi malamu ete ozali na elimo ya banzambe basantu+ mpe ete sekele ata moko te etungisaka yo,+ yebisá ngai bimonaneli ya ndɔtɔ na ngai oyo nalɔti mpe ndimbola na yango.+