Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 13:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe ya solo, nakopesa mabele oyo ebotaka etumbu mpo na mabe na yango,+ mpe bato mabe mpo na libunga na bango. Mpe nakosukisa mpenza lolendo ya bato ya lofundo, mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.+

  • Yirimia 25:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokokisama,+ nakolandela mokonzi ya Babilone mpe ekólo yango,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘libunga na bango, ɛɛ nakolandela mokili ya Bakaladea,+ mpe nakokómisa yango esika oyo etikali mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Yirimia 27:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe bato ya bikólo nyonso basengeli kosalela ye,+ mwana na ye mpe mwana ya mwana na ye, kino ntango mpo na mokili na ye moko ekoya,+ mpe bato ya bikólo mingi mpe bakonzi minene bakozwa ye mosaleli oyo azali kosala mosala ya mpunda.’+

  • Yirimia 50:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 50 Liloba oyo Yehova alobaki mpo na Babilone,+ mpo na mokili ya Bakaladea,+ na nzela ya mosakoli Yirimia:

  • Yirimia 51:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Bópelisa makula.+ Bótondisa banguba ya zolongano. Yehova alamwisi elimo ya bakonzi ya Bamede,+ mpo likanisi na ye ezali mpo na Babilone,+ mpo na kobebisa ye. Mpo Yehova azali kozongisa mabe, kozongisa mabe mpo na tempelo na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto